From Wikipedia, the free encyclopedia
Misálá mya Bantómá ezalí búku ya Nsango Malámu ya Biblíya.
Boyókani bwa Sika |
---|
|
Moto akòmá mokandá muye ezalí Luka; yě mpé moto akòmáká Nsango Malámu ya mísáto. Kobanda na mokɔlɔ Yésu amataki o Likoló, bayékoli bazaláká komɔ́nɔ yě lisúsu na mǐso tɛ́; kasi yě azaláká káka elɔngɔ́ na bangó, mpámba 'té Molímo Mosántu azaláká kosálisa bangó ézala bantómá (Petelo, Yoane,…) tǒ basálisi na bangó sambo (Etiene, Filipe, …) tǒ mpé Polo.
Maloba ma Yésu[1] malakisi ndengé makambo mazalí kolandana. Bayékoli bapanzáká Nsango Malámu
Luka atiaki moléndé mpó na koyéba ndengé níni mpenzá bantómá bazaláká kosakola Nsango Malámu; yě mɔ̌kɔ́ asáláká mibembo misúsu ná ntómá Polo.[5]
Epái ya bato ya bikólo bínsɔ, ézala Bayúda tǒ bato ba bikólo bisusu, bantómá bazaláka kosakola nsango ya Yésu; ndenge yě azaláká, maloba ma yě mpé misálá mya yě. Boye mokandá mwa Luka muzalí kolakisa mosálá monɛnɛ muye Nkolo Yésu apɛsi Eklezya: kosakola Nsango Malámu na bikólo bínsɔ, tii na súka ya mokili.[6]
Seamless Wikipedia browsing. On steroids.
Every time you click a link to Wikipedia, Wiktionary or Wikiquote in your browser's search results, it will show the modern Wikiwand interface.
Wikiwand extension is a five stars, simple, with minimum permission required to keep your browsing private, safe and transparent.