From Wikipedia, the free encyclopedia
«Ɛɛ mamá Maria mbɔ́tɛ!» ezalí nzémbo ya Maria ya Eklesya Katolike na lokótá lingála.
R. Ɛɛ mamá Maria mbɔ́tɛ!
Ɛɛ mamá wa Yézu mbɔ́tɛ!
Osengela bísó na mwána wa yó Yézu
Mamá Maria mbɔ́tɛ
1. Mokili mobimba mozalí na mpási;
Mamá Maria mbɔ́tɛ!
Mokili mobimba mozali mpó ya yó;
Mamá Maria mbɔ́tɛ!
2. Tozangi elóko ya kopesa yó,
Mamá Maria mbɔ́tɛ!
Kamata ko, Mamá, losambo la bísó,
Mamá Maria mbɔ́tɛ!
3. Mokonzi Yézu mwána wa yó;
Mamá Maria mbɔ́tɛ!
Olopesa bolingi bwa mwána wa yó,
Mamá Maria mbɔ́tɛ!
4. Bana ba yó banso bazalí kosénge yó;
Mamá Maria mbɔ́tɛ!
Mokili mobimba mozalí se mókó,
Mamá Maria mbɔ́tɛ!
5.Olotindela mwínda mwa mwána wa yó;
Mamá Maria mbɔ́tɛ!
Tozwa bolámu, tokom' o likolo,
Mamá Maria mbɔ́tɛ!
Seamless Wikipedia browsing. On steroids.
Every time you click a link to Wikipedia, Wiktionary or Wikiquote in your browser's search results, it will show the modern Wikiwand interface.
Wikiwand extension is a five stars, simple, with minimum permission required to keep your browsing private, safe and transparent.